Are you an artist? Make the most of your lyrics with Musixmatch Pro!
Add translation
Share
Verified by Curator
8 contributions
about 2 years ago
Translations

Lyrics of Blessure d'amour by Madilu System

intro

Ye mei, Madilu Multi System
Ah! Yo ndeko ya mwasi
Oye ko beta nga kabakata ya likofi
Po nako solola na mobali nayo
Vraiment oyebi te que mobali na yo
Ayali yaya na nga ya quartier ba salaka boye te
Boni ko

verse

Na mesana na nga bitumba te, maman
Boni oko kanela nga na sali yo nini eh
Ngai ko na bundaka te, maman
Banda na botama na sala na nga ata physique te oh
Wapi nzoto ya bitumba, eh mwana oyo?
Ba finga ba tonga na kipaka te oh
Ngai ko na boya na nga bitumba oh, maman
Na lobi rien
Na mesana na nga ko swana te Je peux vomir
Boni oko swanisa nga na se ya mbula
Ba kake eko beta likolo Olingi obundisa ngai
Po ozua bomengo, oh maman
Kitoko ya mwasi na mokili ezali chance ya la vie te
Mobali oko bundisa ngai azali vieux ya quartier
Coco, nayebi te
Lokola tozali na mokili oyo ya se
Nanu to komi na paradiso te
Soki okoki ko zua chance
Ya ko zua mobali oyo ya yo moko
Ah tika biyoka yoka
Nazangi moyen

verse

Ko swana pe bitumba ezalaki likambo nde ya kala
Nani alakiso habitude mabe boye, Coco?
Na banga makofi di
Nga na bundaka te eh, Coco eh
Nga na swanaka te eh, Coco
Nga na boya manzaka na elongi na ngai eh
Nga na koma na ngai ko sambela Yezu
Nga na koma ko banga mibali ya bato masumu
Instrumental

hook

Eh, Coco
Na moni eh
Tokoma na biso ba changeur de monnaie
Omonaka ndenge ba mère wana ba ngindaka te
Vraiment na ba mbula oyo tokomi na yango
To changaka lisusu mibali
Ah pasi eh

verse

Maman oh, c'est vrai
Soki na salaki yo mabe, olimbisa ngai eh
Soki na bomela yo moto na famille
Luka opardonner ngai oh
Coco eh, (maman)
Maman eh soki na salaki mabe, limbisa ngai eh
Coco eh, (maman)
Maman eh soki na salaki mabe, limbisa ngai eh
Nayebi pota ya bolingo eleki pota ya lisasi
Kasi okokaki Ko sambwisa nga boye te maman ah
Coco eh, (maman)
Maman eh soki na salaki mabe, limbisa ngai eh
Coco eh maman eh
Soki na salaki mabe, limbisa ngai eh
Mobali oyo okoseli nga makambo Coco
Nga nde moto na lakisaki yo Nzombo Faustino eh
Coco eh, maman eh
Soki na salaki mabe, limbisa ngai eh
(C'est vrai) Coco eh, maman eh
Soki na salaki mabe, limbisa ngai eh

verse

Na sengi yo bolimbisi mbala kama ondima ngai te
Na tubeli masumu na nga epayi ya Abbe Jacques abeji
Coco eh, maman eh
Soki na salaki mabe, limbisa ngai eh
Coco eh, maman eh
Soki na salaki mabe limbisa ngai eh
Coco eh, maman eh
Soki na salaki mabe, limbisa ngai eh

verse

Vraiment ah Coco ndenge na yebisaki yo kaka
Possibilite mosusu eza nango
Tokota na biso na zando ya Gambela
To tekaka bilamba na biso, na ba bijoux
MPo soki to landi kaka mibali oyo mitu pasi
Vraiment na mokili oyo ya se tozali
Lokola to'a nano na misuni
Nano tokomi na paradiso te
Epayi toko zua molimo
Po ozwa chance ozua mobali
Aza obe na yomoko
Sans que azanga ya pembeni
Eza problème
Writer(s): Madilu System

Contribute

To-do

Performers Tag
Identify who's singing what

Completed

Lyrics
Verified by Curator
Structure Tag
Identify the song's sections

Credits

Show all credits

Contributions

Last edit about 2 years ago
Are you an artist? Distribute your lyrics!
Take full control of your lyrics. Curate, sync, and distribute your lyrics on Spotify, Apple Music, and more.
Explore Musixmatch Pro