intro
Ndéké moko azalaki (azalaki)
Azalaki na bana motoba, soki sambo
Kuna na kati ya mayi, bana bakomi kolela
Oya-oya-oya-wo, oya-oya-oya-wo
verse
Pasi na nga ya yo, y'ozalaki'oloba
Oyo ezwi nga, ezwi yo, lobi ozalaki'oloba bongo
Kasi lelo pourquoi nga na pasi oza té?
Ba changer nga adresse, de chez ba parents, nakomi CNPP
verse
Kilawu ya l'amour, Tchétché ezanga antidote
Yak'o libéré nga, motéma, soki olembi n'olinga nga
Oyaki epa na nga, Tchétché au nom de l'amour
O promateki ngai, la plus belle des lunes de miel
Kasi lelo pourquoi, nga na bwalé yo kara?
Ba changer nga adresse, vie na nga tchétché ekomi vraiment ya pasi
verse
Oyaki epa na nga na ba paroles sucrées
O prometaki nga des années de bonheur faites d'amour, Tchétché
Kasi lelo pourquoi nga na pasi yo oza té?
Ba changer nga adresse, vie ya papa nakomi mitelengano, Girac Makayabu
Kilawu ya l'amour, Tchétché ezali incurable
Yak'o libéré nga, conscience soki obayé n'olinga nga
verse
Voyage de noces o prometaki nga
Mobembo ya plaisir olakaki nga
Esuki sé na Ndjili, nga mwana ya ngani ya famille pauvre
Ba avions nionso epumbwé aéroport ekomi deserté, visa ya monyato
Groupe de prière épayi ya kutino
Ekokoma té epayi ya Nzambe tant que bosembo eza absente
Ekosuka sé na nzela, Paradis eboya hypocrisie
verse
Eh, ba engagements oyo to zwaka, Tchétché
Ban'oyo toyaka ko bota, parole oyo topesaka
Toyeba kosalel'ango, vie ya moto eza ya imbwa té
Mbwa aza na makolo mineyi, kasi alandaka nzela se moko à la fois
Ndot'oyo tolotaki, Tchétché, oy'a yo ezalaki en noir et blanc
Nga na zalaki'olota yo en couleur
Ya nga na yo Tchétché, stéreo multi standart, écran géant
verse
Mundelé oyo asala mbongo, Tchétché
Atiaki té elongi na yé na kati
Po aboyaki ke bayé bakozanga yango
Baya komona ye mabé, y'oboyi nga bato bazo mona
Y'osali nga nko lokola okana ngai, nabomela yo nani?