verse
Melisa nga ata poison que oniokolo nga na mokili
Amour na ngai, kitoko ya nzete
Liboso mpe nasima eyebana te
Kaka ye amour nga ba projet ya suka nioso eza yo
Nakobatela yo aly pour toujours
verse
Fourmis azuaka po asala tour du monde
Heein hein amour ya vie nanga eza yo
Ya Moïse, Abrahama na roi Salomon
Etalaka yo Aly na ralenti
Ezalaki na motema esi elongwe
Nazali awa lokola motuka oyo ezangi frein
Na descente moyen te na résister Aliya
verse
"Nitu Mambu yaya, George Litu yaya mpe
Boyoka likambo ekwelinga leki na bino mokonzi mopawo
Mokolo mosusu bato ya contribution baye na ndako
Kaka ndenge ezalaka batala mwa ba bien
Mpo ba taxé nga nafuta mpako ya l'état
Na comprendre te tango mère aleki
Namoni kaka bakomi kosolola na litoyi
Babetaka babetaka ba machine
verse
Normalement nga jusque là impôt ebandaki
Koya kaka ba 20à 40 oyo ya kala, mais mbala wana avis
D'imposition eya ba bambolanga mpenza ba 200 et quelques
Wana elingi koloba que kitoko ya mama ezali
Bino moko balakisaka te namoto ya mpako
Mama bimaka mais bimaka sukaka obe na balcon"