Are you an artist? Make the most of your lyrics with Musixmatch Pro!
These Lyrics are yet to be verified
6 contributions
over 7 years ago
Translations

Lyrics of Layile by FRANCO

1) Layile a futeli ngai ticket ya mbala kaka
Na kende ko pema po atikala na ba mosusu eh
Ah na ba mosusu eh
2) Layile a kabi bolingo nangai
Layile a trahir amour nangai ye, ye
Ah Layile eh nakosala boni
3) Layile a futeli nfai ticket ya mbala kaka
Na kende ko pema po atikala na ba mosusu eh
Ah na ba mosusu eh
4) Layile a kabi bolingo nangai
Layile a trahir amour nangai ye, ye
Ah Layile eh nakosala boni
(FRANCO)
5) Layile, ndenge nini o trahir amour ya ngai nayo
Ba voyage otindaka ngai, Liyile
Ezalaka nde po sima na ngai otikala kosakana malamu
6) Oko kamata ngai na bana
Oko tinda nga na mboka ya malili
Oyebi pe nazalaka na rhumatisme, Layile
7) Na kende kuna, na kende ko kufa
Po yo otikala na bisengo
Te, Layile
INSTRUMENTAL
8) (Jolie Detta – Lead)
Layile a futeli nfai ticket ya mbala kaka
Na kende ko pema po atikala na ba mosusu eh
Ah na ba mosusu eh
9) Layile a kabi bolingo nangai
Layile a trahir amour nangai ye, ye,
Ah Layile eh nakosala boni
10) Layile a futeli nfai ticket ya mbala kaka
Na kende ko pema po atikala na ba mosusu eh
Ah na ba mosusu eh
11) Layile a kabi bolingo nangai
Layile a trahir amour nangai ye, ye
Ah Layile eh nakosala boni
12) Nzela ya makambo
(Nzela ya makambo, ye, ye)
Voyage ya makambo
(Voyage yako kinela)
13) Epayi nakei ko pema motema eko tuta ngai
Na linga na liya motema eko beta ngai
14) Makanisi na estoma etungisi ngai
Ah na loba nini eh (loba)
15) Layile ateki bolingo na Av Kasavubu
Layile akabi sentiment na nga ye ye
Ah Layile, zongisa motema nangai
16) Nzela ya makambo
(Nzela ya makambo, ye, ye)
Voyage ya makambo
(Voyage yako kinela)
17) Epayi nakei ko pema motema eko tuta ngai
Na linga na liya motema eko beta ngai
18) Makanisi na estoma etungisi ngai
Ah na loba nini eh (loba)
19) Layile ateki bolingo na Av Kasavubu
Layile akabi sentiment na ngai ye ye
Ah Layile, zongisa motema nangai
20) (FRANCO)
Oh, Layile,
Ndenge nini yo mobali mobimba
Olinga tango nyoso otelema na Av Kasavubu
21) Po otekisela ka ngai bolingo
Alors que ngai awa na poto na malili
Tango oyo nga naza ko knisa que yo oza na mosala
22) Hors que yo ozali na Av Kasavubu
Pwa mwasi nyoso soki azali ko leka atalaka yo
23) Layile, okamywisaka nga trop
Nayebelaki yo boye te
Nayebaka que ozalaka timide
24) Tango owutaka na Séminaire na Mahidi
25) Layile, Bongo sikoyo, bakoma ko loba nangai que Layile akoma champion
26) Yo moto ozalaka timide
Yo moto ozalaka ko banga ko tala miso ya basi
Ko solola meme na mwasi, Layile ce n′est pa possible
Ah
Instrumental
27) (Jolie Detta – Lead)
Layile zala na courage tala ngai na miso
Po na nini oko bombana ngai mwasi nayo
Nazongi na voyage ya mbala kaka
28) Ah Layile osi o deconner
Ah na lela wapi eh
29) Layile a simbisi singa na ngai ya kekele
Layile akabi sekele ya ngai naye
Ah Layile, nako sala boni
30) (Franco)
Layile, Eloko nini olingi lisusu nasala, Layile
31) To pesanaka bikila
Na lakisaki yo nakati ya ndako, Layile
Tala singa nangai ya kekele
Mwana amona te, famille amona te
32) Ngai na ke voyage
Vraiment okotisi mbanda nakati ya ndako
33) Par hazard mbanda akei ko mona singa nanga ya kekele
Olukeli ngai bomoyi to liwa
34) Layile, nayebi lisusu eloko nako kosalate
Sikoyo nayebisa famille nangai
Soki liwa
Comme libala ya ngai nayo ezalaka libala ya ba bien
Bako kamata ba bien nanga bakende nayango
Yayo pe etikala eh
35) Mpo yo moto olukeli nga nyoso oyo, Layile.
36) Nzela ya makambo
(Nzela ya makambo, ye, ye)
Voyage ya makambo
(Voyage yako kinela)
37) Epayi nakei ko pema motema eko tuta ngai
Na linga na liya motema eko beta ngai
38) Makanisi na estoma etungisi ngai
Ah na loba nini eh (loba)
39) Layile ateki bolingo na Av Kasavubu
Layile akabi sentiment na nga ye ye
Ah Layile, zongisa motema nangai
40) Nzela ya makambo
(Nzela ya makambo, ye, ye)
Voyage ya makambo
(Voyage yako kinela)
41) Epayi nakei ko pema motema eko tuta ngai
Na linga na liya motema eko beta ngai
42) Makanisi na estoma etungisi ngai
Ah na loba nini eh (loba)
43) Layile ateki bolingo na Av Kasavubu
Layile akabi sentiment na nga ye ye
Ah Layile, zongisa motema nangai
44) Oh Layile
Oyo voyage ngai na kende
Voyage ya makambo
Baninga ba kendeka voyage
Akei ko pema, motema nye
Ngai na pema te
45) Tango nyoso obele telephone
Malade ya estoma epayi
Na liya te, nzoto ekoma obele ko konda
Batuna ngai oza malade
Malade te mais boni ozo konda boye
Na lobi na bango kaka pasi na motema
Estoma eza ko nyokolo ngai
46) Nazalaka pe zua trop, na sala boni
Bana pe ba landa zua nangai, ah gai na sala boni
47) Mobali na zua lokala aza na mbongo
Atinda nga obe na kende ko wumela
48) Ye na sima asala nyoso ye alingi
Layile, to yokanaka boyete
Vraiment toyokanaka boye te
49) Dedications
?????????
Mwana mwasi oyo azali ko silisa baa pneus ya voiture ya bato
50) Mboka nini otindi ngai ah Layile
Mboka nin okabi ngai ah layile
Epayi otikali, yo na basusu eh
51) Mboka nini otindi ngai ah Layile
Mboka nin okabi ngai ah layile
Epayi otikali, yo na basusu eh
Writer(s): Franco

Contribute

To-do

Structure Tag
Identify the song's sections

Completed

Lyrics
Lyrics in time with music
Performers Tag
Identify who's singing what

Credits

This song has no credits yet

Contributions

Last edit over 7 years ago
Are you an artist? Distribute your lyrics!
Take full control of your lyrics. Curate, sync, and distribute your lyrics on Spotify, Apple Music, and more.
Explore Musixmatch Pro